12
Nzembo mpo na kokumisa Yawe 
 1 Na mokolo wana, okoloba : 
« Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, 
pamba te ata osilikelaki ngai, 
kanda na Yo elongwaki likolo na ngai 
mpe obondisaki ngai ! 
 2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; 
nakotia elikya na ngai epai na Ye 
mpe nakobanga lisusu te. 
Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; 
azali lobiko na ngai. » 
 3 Yango wana, botoka mayi na esengo 
na etima ya lobiko. 
 4 Na mokolo wana bokoloba : 
« Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, 
bosakola misala na Ye kati na bikolo 
mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso. 
 5 Boyemba loyembo mpo na Yawe, 
pamba te asali makambo ya kokamwa. 
Tika ete mokili mobimba eyeba yango ! 
 6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, 
pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »